Chebeya, Mbuta Muntu, Bozongi bwa yo na Mabele ya Kongo, eboti ba Chebeya ebele, okati ya moko na moko ya Mwana ya Kongo. Na Bokasi bwa yo, ozongiseli bana ya Kongo mongongo pe Liloba ya Lobiko, ya Bondeko pe ya Kimya na Kongo pe na Mokili Mobimba..

Chebeya, Molimo mwa yo mo pemi nde na Kimya ya solo epayi ya Nzambe ya Kongo, pembeni ya ba Nkoko ba biso, pe Kimya ya Lola ekita na Kongo pe na Mitema mya biso banso.

Chebeya, Bana Kongo ba pesi yo BOTONDI pe ba lingi yo mingi, suka te!

Fait en Allemagne, le 3 Juin 2010

Mama Jeanne-Marie Sindani